﻿Banzembo.
121.
Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. Natomboli miso na ngai na ngambo ya bangomba : lisungi na ngai ekowuta wapi ? 
Lisungi na ngai ewutaka na Yawe oyo akela likolo mpe mabele. 
Akotika te ete lokolo na yo eselumuka ; Ye oyo abatelaka yo animbaka te. 
Te, Ye oyo abatelaka Isalaele animbaka te mpe alalaka pongi te ! 
Yawe azali mobateli na yo ; Yawe azali, na ngambo ya loboko na yo ya mobali, lokola elili oyo ebatelaka yo. 
Ezala na moyi to na butu, moyi mpe sanza ekosala yo mabe ata moke te ! 
Yawe akobatela yo na mabe nyonso, akobatela bomoi na yo ; 
Yawe akobatela kokende mpe kozonga na yo, sik’oyo mpe libela na libela. 
