﻿Banzembo.
136.
Bosanzola Yawe, mpo ete azali malamu ; 
Bosanzola Nzambe ya banzambe ; 
Bosanzola Nkolo na bankolo ; 
Ye kaka nde asalaka bikamwa ya minene ; 
Akelaki likolo na mayele na Ye ; 
Atandaki mabele na likolo ya mayi ; 
Akelaki biloko minene oyo ebimisaka pole ; 
moyi mpo na kongengisa mokolo ; 
sanza mpe minzoto mpo na kongengisa butu ; 
Abomaki bana mibali ya liboso ya Ejipito ; 
Abimisaki Isalaele wuta na Ejipito ; 
na nguya monene ya loboko na Ye ; 
Akabolaki ebale monene ya Barozo na biteni mibale ; 
Alekisaki Isalaele na kati-kati ya ebale monene ya Barozo ; 
Azindisaki Faraon elongo na mampinga na ye kati na ebale monene ya Barozo ; 
Atambolisaki bato na Ye kati na esobe ; 
Abetaki bakonzi minene ; 
Abomaki bakonzi ya nguya ; 
Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori ; 
mpe Ogi, mokonzi ya Bashani ; 
Akabaki mabele na bango lokola libula ; 
lokola libula epai ya Isalaele, mosali na Ye ; 
Akanisaki biso tango basambwisaki biso ; 
Akangolaki biso wuta na maboko ya banguna na biso ; 
Apesaka bilei na bikelamu nyonso ; 
Bosanzola Nzambe ya likolo ; 
